Svoboda | Graniru | BBC Russia | Golosameriki | Facebook

Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Elombe ya bibotu ya Congo-Brazzaville Ardi Ndembo akufi mwa mikolo nsima na kobetama mabe na Miami


Mobeti bibotu moko akweyi na bitumba ya na Super-Welterweight USBA na di Wintrust Arena, Chicago, 12 sanza ya zomi 2019. (Foto: Jon Durr-USA Today Sports via Reuters)
Mobeti bibotu moko akweyi na bitumba ya na Super-Welterweight USBA na di Wintrust Arena, Chicago, 12 sanza ya zomi 2019. (Foto: Jon Durr-USA Today Sports via Reuters)

Moyi Ekolo Congo-Brazzaville Ardi Ndembo, elombe ya bitumba ya bibotu, akufi awa na Ekolo Amerika na mibu 27 mwa mikolo nsima na kokweyisa makalekale na bondogwani bwa ye ya suka.

Nsango ya liwa lya epesamaki o’mokolo mwa 25 ya sanza ya minei ya 2024 na Team Combat League, mabongisi mabitumba mya boxe.

M. Ndembo amemamaki na lombango na lopitalo Memorial Jackson, na Floride, nsima na kokweyisama makalekale na bitumba na Néstor Santana ya ekolo Cuba.

Liwa likomeli M. Ndembo mposo mibale nsima na K.O. azwaki eye ezokisaki kati ya motu.

Mobundi ya bibotu ya Congo-Brazzaville alongaki bitumba mwambe mpe apolaki mbala moke te wuta abandaki kobunda bo’ professionnel yambo na kokweyisama eye ememi ye na liwa.

Yambo akoma professionnel abundaki koleka mbala 100.

Equipe na ye ya Las Vegas Hustle akabolaki misolo na internet mpo na kosunga libota na ye.

Azalaki na bana babale.

Forum

XS
SM
MD
LG