Svoboda | Graniru | BBC Russia | Golosameriki | Facebook

Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Koleka bato nkama moko na ntuku mibale na libwa nde bakufaki na bomeki kokima na bokangami na boloko bonene ba CPRK


Bazali kosamba liboso lya bazuzi na boloko bonene ya Makala (CPRK), Selembao, Kinshasa, RDC, 05évrier 2011.
Bazali kosamba liboso lya bazuzi na boloko bonene ya Makala (CPRK), Selembao, Kinshasa, RDC, 05évrier 2011.

Koleka bato nkama moko na ntuku mibale na libwa nde bakufaki na bomeki kokima na boknagami na boloko bonene ba CPRK / Makala na butu ya kotana lobi loleki, esakoli mbulamatari ya Ekolo Congo Démocratique na motango mwa sika.

Motango mwango mopesami na Vice-Premier ministre mpe ministre ya ma Nteyi, Jacquemin Shabani.

Ntuku mibale na minei kati na bato baye nde bakufaki na masasi, kolanda maloba ma ministre.

Basi baike bazwamaki na makasi mpe biloko mingi bibebisami lokola mikanda mitali bakangami mpe biloko bisusu.

Jacquemin Shabani asakoli mpe ete bolukiluki bofungwami mpo na koyeba mpenza nini elekaki na siki siki.

Lobi loleki, vice-ministre ya Mambi ma Sembo alobaki bato babale nde bakufaki. Nzonkande mingongo mitombolami mpo na kosenga bolukiluki ya bayi bonsomi.

Bayi Societe civile mpe babundi ba makoki ma bomoto balingi bayeba mpenza nini ememami mobulu moye na boloko boye.

Bayike ya bayi politiki mpe basengi bolukiluki boye bokokoma na suka. Na ngambo ya bayi molongo, ekolo Belgique mpe esengi mpe pole na likambo liye.

Motango mwa bato moleki mingi na boloko boye etongama wuta mibu 1920 mpo na bakangami nkoto yoko na ndambo.

Ministre ya mambi ma Sembo alobaki mikolo mileki ete koleka bato nkoto minei na ndambo bazali na boloko boye mpe asengaki ete bobimisami ya baike mpe ba magistrats kotika kotinda bato mpamba mpmba na esika eye.

Forum

XS
SM
MD
LG