Svoboda | Graniru | BBC Russia | Golosameriki | Facebook

Accessibility links

Breaking News

Let's Learn English with Anna in Lingala

About Let's Learn English with Anna in Lingala

Toyekola Angele elongo na Anna! Ezali nzela ya sika ya kotangisa Angele ya Amerika na bana kati na mibu mwambe na zomi na mibale na kotunaka – mpe koyanolaka mituna mpe koyekolaka na esengo makambo na lokota la Angele mpe ya Lingala.

Mateya mango makobanda na makambo ya mike, ya ntina mpe makolendisa malembe malembe makasi ya koyoka, koloba, kotanga mpe kokoma. Moyekoli akoki koyoka mateya na Lingala mpe Angele mpo na komeka koloba, kozongela mibeko ya lokota mpe ntina ya maloba to mpe kosepela kaka na mateya ma Angele maye mazali kosepelisa mpe mazali na ntina.

Atako linaka liye litali mingi bilenge baye bazali koyekola Angele, maye mazali na kati matiami mpo na komema libota mobimba kotala yango elongo. Milongo mya biteni ntuku libwa mizali mpe na nkasa eye elakisi makambo bayekoli bakoki kosala, na malako mpo na balakisi, baboti mpe baye bakosunga.

XS
SM
MD
LG