Svoboda | Graniru | BBC Russia | Golosameriki | Facebook

Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Blinken abengaki Kagame mpo na kisenga ete Kigali na Kinshasa baboma moto


Antony Blinken (G), secrétaire d'Etat ya Amerika apesi mbote na président Paul Kagame (D) ya Rwanda, na village Urugwiro, na Kigali, le 11 août 2022
Antony Blinken (G), secrétaire d'Etat ya Amerika apesi mbote na président Paul Kagame (D) ya Rwanda, na village Urugwiro, na Kigali, le 11 août 2022

Ekolo Amerika esengi Rwanda na Ekolo Congo demcoratqieu kokitisa matata mpe bobendani na bango.

Antony Blinken Secrétaire d’Etat ya Etats-Unis abengaki o'mokolo mwa mibale (15 sanza ya mwambe 2023) mokonzi ya Rwanda, Paul Kagame, mpo na yango, nsima na mampinga ma Ekolo Congo democratique FARDC koloba sanza eleki ete mabengaki book ba basoda ba RDF, mampinga ma Rwanda baye bakotaki na mabele ma Congo.

Kigali ewanganaki yango mpe efundaki, na ngambo na yango, Kinshasa kopesa maboko na batombo ba Rwanda ba FDLR baye bazali na nomyele ya RDC.

Département d’Etat ya Amerika masolo malekaki na ndenge ya malamu kati na Antony Blinken na Paul Kagame mpo na makambo maye ma wusuwus mazali koleka, kasi azali ata na ngambo moko ten a bofundami boye.

Washington ebakisi na liyebisi ete Antony Secrétaire d’Etat apesaki makanisi ma ekolo na ye mpo na eyano na nzela ya masolo to diplomatie kati na bikolo mibale mpe asengaki ngambo inso kozwa mikano mpo na koboma moto.

Forum

XS
SM
MD
LG