Svoboda | Graniru | BBC Russia | Golosameriki | Facebook

Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Judith Suminwa Tuluka, Ministre wa Yambo ya yambo ya mwasi na RDC azali nani?


Judith Suminwa (G) Tuluka Premier ministre ya sika asololi na président ya RDC Félix Tshisekedi na ville ya Union africaine, na Kinshasa, le 1er avril 2024. (Présidence ya RDC)
Judith Suminwa (G) Tuluka Premier ministre ya sika asololi na président ya RDC Félix Tshisekedi na ville ya Union africaine, na Kinshasa, le 1er avril 2024. (Présidence ya RDC)

Judith Suminwa Tuluka atiyami Ministre wa Yambo ya sika ya Ekolo Congo Democratique, kolanda mokano mwa mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi mosakolami na etando eke RTNC.

Azali mwasi wa yambo apesami ebonga eye na mboka.

Moyi UDPS, lingomba lya mokonzi ya mboka Tshisekedi, Judith Suminwa Tuluka azalaki kino sika ministre ya Plan na RDC.

Azalaki mokambai ya mabongisi ma ntombwa ya ba territoires 145.

Yambo na yango, asalaka bo' mokambi ya mabongisi songolo na Pnud mpe mpe azalaki kati na baye basalaka cabinet ya ministre ya ministre ya Budget.

Akokitana bongo na Jean-Michel Sama Lukonde nsima na botalitali Informateur mpe kalaka mokonzi ya UDPS Augustin Kabuya asalaki kolanda maponami masalaki na suka ya mobu moleki.

Judith Suminwa Tuluka akosala mbulamatari eye esengeli kopesa biyano na bitumba na monyele ya mboka mpe ya mpasi bayi mboka bazali na yango.

Forum

XS
SM
MD
LG